Dans Ton Sanctuaire
Adorons L'Eternel
5:02Nkolo yamba loyembo la nga Libonza lia moto asimbami na yo Nazali elémbo ya bolingo bwa yo Mokonzi ya bomoyi na ngai Otika likolo polele, Másiya Po tomona nkémbo pe nguyá na yo Y'oza liziba lia mayi ma lobiko Yo Nkumu ya ba nkumu banso Y'ozali bopemi bua ngai Bipayi nakotika mikumba mia ngai Ozali solo likonzi lisímbi ndako Masiya na ngai Y'ozali lokumu la ngai Bipayi na kosímba soki na lembi Oza bipayi nakitisaka motéma Másiya na ngai Ozali nzeté ya bolingo, Masiya Nakati y'elanga ya motéma na ngai Epesa fololo ya malasi kitoko Na miso ya Nzambe na bule Opesa bokono nkombo ya lobiko Obenga liwá na nkombo ya mpongi Po'ete lisekwa ezali yo, Masiya Mokonzi ya bakonzi banso Na sopi motéma na ngai Libosó ya kiti ya ngolu na yo Po'ete lobiko na ngai ekowuta na yo Masiya na ngai Kitisa nguya na yo, Nkolo Awa tokobelela nkombo na yo Lakisa biso nkembo pe makasi na yo Nzambe na nguya Yamba maloba ya motéma na ngai Mosopani liboso na yo mosantu Na zongisa nkémbo pe lokumu na yo Yo nzéla pe bomoyi ya suko Ata molili ya mokili eyindi Mwinda mwa yo moko ngengisa nzela na ngai Oyo asimba ngai loboko ezali yo Mokonzi ya bomoyi na ngai Na sopi motéma na ngai Libosó ya kiti ya ngolu na yo Po'ete lobiko na ngai ekowuta na yo Masiya na ngai Kitisa nguya na yo, Nkolo Awa tokobelela nkombo na yo Lakisa biso nkembo pe makasi na yo Nzambe na nguya