Nzambe Aza Moko (Feat. Anne Keps, Gisele Deleme & Athoms Mbuma)

Nzambe Aza Moko (Feat. Anne Keps, Gisele Deleme & Athoms Mbuma)

Groupe Adorons L'Eternel G.A.E.L.

Длительность: 4:32
Год: 2016
Скачать MP3

Текст песни

Sh'ma Congo
Adonaï Eloheinou
Adonaï erhad
Sh'ma Congo
Adonaï Eloheinou
Adonaï erhad

Osepelaka na matondo eh, Nkolo olingaka ndé masanjoli
Basantu basangani lokumu ebonga na Nzambe tata, azo zela masanjoli eh
Osepelaka na matondo eh, Nkolo olingaka ndé masanjoli
Il suffisait na mwa gratitude po moto'a maba a sepelisa motama, Jésus eh
Osepelaka na matondo eh, Nkolo olingaka ndé masanjoli
Eza malamu ko pesa matondo na Yesu Klisto po Ye lisekwa Ya ba santu nionso
Osepelaka na matondo eh, Nkolo olingaka ndé masanjoli
Kutu Jésus ye moko apesa merci, sima mapa emultiplier ebelé, ebelé
Osepelaka na matondo eh, Nkolo olingaka ndé masanjoli
Sé y'obongi na lokumu pe nkembo

Sé yo eh (sé yo eh)
Sé yo eh (sé yo eeh)
Sé y'olingaka ndé masanjoli
Kaka yo Papa eh (sé yo eh)
Mosusu té oh (sé yo eh)
Obongi na lokumu nionso Jésus (sé y'olingaka ndé masanjoli)

Oh tozo yemba, tozo bina (sé yo eh)
Tozo ganga, tozo tatola (sé yo eh)
Tozo netola, tozo kumisa sé yo eh (sé y'olingaka ndé masanjoli)
Lokumu kembo nionso ya Yo eh (sé yo eh)
Kaka yo Yaya eh, Yaya eh (sé yo eh)
Yaya eh (sé y'olingaka ndé masanjoli)

To tomboli maboko, to tatola Y'oza Nzambé
Mabina nionso ya basantu ebinama pona Yahweh
Nzela ya basantu eh (Yésu nzela ya basantu eh)
Yésu elikya ya motéma eh (Yésu elikya ya motéma eh)
Yésu makasi ya basantu eh (Yésu makasi ya basantu eh)
Yésu elikya ya motéma eh (Yésu elikya ya motéma eh)
To tomboli maboko, to tatola Y'oza Nzambé
Mabina nionso ya basantu ebinama pona Yahweh

Congo yebaka Nzambe aza moko
Yé ndé Adonaï
Congo yebaka Nzambe aza moko
Yé ndé Adonaï (na mokili oyo Nzambe aza sé moko)
Congo yebaka Nzambe aza moko (sembola matoyi yoka malamu)
Yé ndé Adonaï (mokili mobimba tokumisa sé Nzambe moko)
Congo yebaka Nzambe aza moko (Yé ndé)
Yé ndé Adonaï (Yé ndé)

Matondo eeh (matondo eeh)
Napes'o nini Yaya, yamba matondo eh (matondo eeh)
Vraiment osali ya mingi, motéma etondi matondo eh (matondo eeh)
Kamata matondo eeh, Papa eeh (matondo eeh)
Na oy'osali nakoki ko bomba té eeh (matondo eeh)
Yango nalobi matondo eeh-eeh-eeh (matondo eeh)

To tomboli maboko, to tatola Y'oza Nzambé
Mabina nionso ya basantu ebinama pona Yahweh