Kumama Mpate

Kumama Mpate

Tresor Bibi

Альбом: Matatoli
Длительность: 5:49
Год: 2018
Скачать MP3

Текст песни

Nalingi na mona Yo
Na bomoyi na nga
Yahweh
Nalingi na simba Yo
Na bomoyi na nga
Yahweh

Nalingi na mona Yo
Na bomoyi na nga
Yahweh
Nalingi na simba Yo
Na bomoyi na nga
Yahweh

Ya nga nionso ya vie
Ezwaka pé mwa tina
Soki Y'osali nga ngolu na Yo
Na makasi ya nzoto té
Sé na ngolu na Yo papa, oh

Sala nga ngolu na Yo (ngolu na Yo)
Kita na nkémbo na Yo
Yahweh (sala nga ngolu na Yo)
Sala nga ngolu na Yo (na bomoyi na ngai)
Kita na nkémbo na Yo
Yahweh

Kitisa nguya na Yo (kitisa nguya na Yo)
Na bomoyi na ngai (kita na nkémbo na Yo)
Na mona Yo (Yahweh)
Kitisa nguya na Yo na bomoyi na ngai (kitisa nguya na Yo)
Nalingi na mona Yo (kita na nkémbo na Yo)

Masanjoli na ngai
Ezwaka mpimbo Ya bonzambé
Soki Y'osemboli loboko na Yo
Na vie na nga oh, na sengi sembola loboko

Sembola loboko na Yo
Na Yo na bomoyi na nga (kita na nkémbo na Yo)
Yahweh (Sembola loboko ya bokeseni na mona)
Sembola loboko na Yo (na mona yango)
Kita na nkémbo na Yo (lisusu na bomoyi na nga papa oh)
Yahweh

Tikala seko na seko (Nkolo na nga Yésu)
Oza mokonzi na bakonzi (pusana lisusu péné na yeba Yo malamu)
Pusana péné na nga Yésu (ebongo na sanjola Yo lolengé yomoko olingi oh)
Oza mokonzi na bakonzi (tikala seko)
Tikala seko na seko (na mesana kopesa Yo beleyi ya mokolo na mokolo)
Oza mokonzi na bakonzi (Yo ndé mokonzi, bileyi na Yo ndé masajoli eh)
Pusana péné na nga Yésu (pusana lisusu papa, na yéba Yo malamu)
Oza mokonzi na bakonzi

Yango kumama mpaté na nzambé (kumama mpaté na Nzambé)
Papa Y'obongi na nkémbo, Y'obongi na masanjoli (kumama mpaté na Nzambé)
Obongi toyémbela Yo loyémbo toyembela moto té na sé na moyi (kumama mpaté na Nzambé)
Osekwisa Lazare, otala mikolo asala na nkunda té papa (kumama, kumama, kumama mpaté na Nzambé)
Loi ya pesanteur esila makasi po Yo otambola likolo ya mayi (kumama mpaté na Nzambé)
Liloba na Nzambé étinda mbisi na kati ya moniama ya Petelo (kumama mpaté na Nzambé)
Bongo ata masanga esili na feti, ya Yo nguya esilaka té, papa (kumama mpaté na Nzambé)
Ngwendé na Yo esalama na libaya té Nzambé na nga oh (kumama, kumama, kumama mpaté na Nzambé)
Menuisier nini akoki kosala ngwende na Yo Nzambé na Lola? (kumama mpaté na Nzambé)
Ngwendé na Yo esalamaka na libéndé té Yesu Nzambé na Lola (kumama mpaté na Nzambé)

Ajusteur nini akoki kosimba ngwende ya mokeli Na ngai oh? (kumama mpaté na Nzambé)
Bongo Nzambé ya boyé na kanga motéma pona nini?
Na mesana kotombola Yo (kumama, kumama, kumama mpaté na Nzambé)
Kumama, Y'obongi na nkémbo Nzambé ya mabota nionso (kumama mpaté na Nzambé)
Yondé mokéli ya oyo ezomonana na oyo ezomonana té oh (kumama mpaté na Nzambé)
Kumama, loyémbo ya boyé, bayembela kaka Nzambé oh (kumama mpaté na Nzambé)
Kumama Y'obongi na nkémbo, Nzambé mabota nionso (kumama mpaté na Nzambé)
Bongo mabina ya boyé, papa, na babinela kaka Nzambé na Lola (kumama, kumama, kumama...)

Obongi na nkémbo papa oh (kumama, kumama, kumama)
Nzambé ya motéma na nga, na somba Yo na wenzé té oh (kumama, kumama, kumama)
Awuta na Lola, asala nga bolamu yango nazo yemba, nazo binela yé, nazo yemba
Lelo, yango nazo yemba, nazo sanjola yé, nazo yemba
Lelo, yango nazo yemba, nazo binela yé, nazo yemba
Lelo, yango nazo yemba, nazo sanjola yé, nazo yemba

Nzambe na Lola, mokokisi ya bilaka nionso
Elikya na nkémbo, asimbi nga loboko
Nazo yemba, lelo nga nazo bina, eh

Ndeko na ngai, mpaté na Nzambé aza oyo esengeli atombwama
Makomi elobi "Quand vous aurez élevé le fils de l'homme
Alors vous connaîtrez ce que je suis" Ha-ha-ha
Binela yé na esengo, Yésu